1. Allah asili koyoka ya soló liloba ya oyo azali koyebisa yo тропа mobali naye, azali kofunda epai ya Allah, тре Allah azali koyoka lisolo ya bino mibale. Ya solo Allah azali moyoki mpe momoni.
2. Baye kati na bino bazali koboya basi na bango, na kokokisa bango ete bazali lokola mokongo ya bamama na bango, bazali ba mama na bango te, bamama na bango nde ba oyo babotaki bango. Ya soló bazali wana koloba liloba ya mabe mpe lokuta. Mpe Allah azali na ngolu atonda bolimbisi.
3. Baye bazali koloba na basi na bango été bazali lokola mokongo ya bamama na bango, sima bazongeli (bango) тре basaleli oyo balobaki te, esengeli na bango kokangola mowumbu moko yambo ete basangana na bango. Wana ezali тропа kolendisa bino, тре Allah azali na sango ya maye bozali kosala.
4. Мре oyo azui makoki te тропа kokangola mowumbu, akila (akanga) ngizi sanza mibale elandani yambo ya kosangana na mwasi naye, mpe oyo akokoka te aleisa babola ntuku motoba wana mpo bondima na Allah na motindami waye. Мре wana ezali bandelo oyo Allah atieli bino lotomo, тре тропа bapengwi bakozala na etumbu ya makasi.
6. Mokolo oyo Allah akosekwisaka bango banso, mpe akoyebisaka bango maye basalaki, babosana yango kasi Allah abatela yango. Kasi Allah azali nzeneneke ya biloko nyoso.
7. Boye ozali kornona te été Allah ayebi nyoso ezali kati na likolo mpe kati na mabele? Lisolo ekoki kozala ya bato misato te sé azala ya minei, тре ekoki kozala ya bato mitano te sé azala ya motoba, moke to mingi sé azala elongo na bango na esika nyoso, sima akoyebisaka bango maye basalaki o mokolo ya suka. Ya soló, Allah azali moyebi mpe azali na bokoki ya biloko binso.
9. Oh bino bandimi! Soki bosangani mpona kosolola sekele, bosala yango na masumu te mpe na kibonguna te mpe kozangisa motindami botosi mpe te, kasi bosala yango na bolamu mpe na kobanga (Allah), mpe bobanga Allah oyo epai naye bokosangisama.
10. Ya sólo, masolo ya kobatama ezali mosala ya satana, mpo ete anyokolo na yango bandimi, kasi ekosala bango eloko te sé na ndingisa ya Allah. Mpe epai ya Allah nde esengeli na bandimi bamipesa.
11. Oh bino bandimi! Soki basengi bino ete: Bopesa esika ya kofanda okati ya lisanga, bopesa yango, Allah akopesa bino esika, mpe soki balobi ete: Botelema, bosala yango, Allah akotombola bandimi mpe lisusu akotombola kati na bino baye bazua boyebi likolo koleka. Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala.
14. Boye ozali kornona te baye bazua baninga bato oyo Allah asilikela bango, bazali kati na bino te, bazali mpe kati na ba oyo kuna te. Mpe bazali kolapa na lokuta, na bango mpe bayebi.
18. Mokolo oyo Allah akosekwisaka bango banso, bakolapelaka ye (Allah) lolenge balapelaki bino bazali komimona été bazali na eloko, kasi bazali sé bato ya lokuta.
22. Okokuta te kati na baye bandimi na Allah na mokolo ya suka, bazali na bolingo epai na baye bazali kotelemela Allah na motindami naye, ata bazala bongo batata na bango, to bana na bango, to bandeko na bango, to bato ya libota na bango. Bango wana nde atiaki bondimi na mitema na bango, mpe asalisi bango na rúh(1) kowuta epai naye, mpe akokotisa bango na bilanga ya lola biye mingala mizali kotiola na nsé na yango wapi epai bakozala libela. Allah asepeli na bango, bango mpe basepeli naye. Bango wana nde lisanga ya Allah. Lisanga ya Allah nde bazali balongi.