3. Tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali otei na yango nyoso mibale na bosóló na tango eye eyebani. Bapengwi bazali koboya na maye bazali kokebisa bango.
4. Loba: Bokanisi nini тропа baye bozali kobelela na botiki Allah, bolakisa ngai nini bakela na mabele, to bazali na mosangisi o likolo? Boyela ngai buku ya bosembo oyo ezalaki liboso ya oyo (kurani) to elembo ya boyebi soki ya soló, bozali na bosembo.
5. Mpe nani abungi koleka moto oyo azali kobondela na botiki Allah eloko ekoyanola ye te kino o mokolo ya suka, тре bazali koyanola na mabondeli na bango te?
8. То тре bazali koloba ete: Asali yango na ndenge naye, loba: Soki nasali yango na ndenge na ngai, bokosala ngai eloko moko te liboso ya Allah, ayebi malamu maye bozali kopanza sango (na mabe тропа kobukela kurani lokuta). Akoki lokola nzeneneke kati na ngai na bino, mpe azali molimbisi atonda ngolu.
9. Loba: Nazali motindami wa yambo ya koyela bino te, mpe nayebi te oyo bakosala na ngai mpe тропа bino; nazali kolanda sé maye bakitiselaki ngai, mpe nazali sé mokebisi ya polele.
10. Loba: Boye bozali kornona ndenge nini soki (boyebi) ewuti epai ya Allah, mpe bozali kondimela yango te; mpe nzeneneke moko kati ya bana ya isalayele amoni mpe andimi na yango? Mpe bosali lolendo? Ya soló, Allah akambaka babubi te.
15. Mpe topesaki mobeko na moto ete asalela baboti naye bolamu, mama naye amemaki zemi naye na mpasi mpe abotaki ye na mpasi, mpe zemi naye na komelisa ye kino akokisi sanza ntuku misato kino akomi makasi, mpe akokisi mbula ntuku minei alobi: Nkolo tika ete natondo yo тропа bolamu nayo osaleli ngai, mpe na baboti na ngai, mpe tika ete nasala mosala ya malamu oyo ekosepelisa yo, mpe bongisa libota na ngai. Ya soló natubeli epai nayo mpe ya sólo nazali okati ya baye bazali komisokia (bamizilima).
16. Baye wana nde tokondimela bango тропа bolamu oyo basalaki, mpe tokolongolaka mabe na bango, mpe bakozalaka okati ya bato ya lola, engebene na elaka ya bosóló oyo bapesaki bango.
20. Mpe mokolo moye bakomemaka bapengwi nalifelo; (bakoyebisaka bango) ete: Bobebisaki bolamu na bino na mokili mpe bosepelaki bongo, kasi lelo bokofutama na etumbu ya makasi engebene na maye bosalaki lolendo na mokili na botikaki bosóló, mpe тропа maye bozalaki kobebisa.
21. Mpe kanisa ndeko ya ba Aad, tango akebisaki bato naye na ahqáf, liboso naye mpe sima naye, bakebisi basilaki koleka ebele ete: Bobondela sé bobele Allah, ya soló, nazali kobangela bino etumbu ya mokolo monene.
25. Ebebisaki nyoso na mibeko mia Nkolo na yango, sima na yango na tongo, bango banso bamonanaki lisusu te, etikalaki sé bandako na bango. Lolenge wana nde tofutaka batomboki.
30. Balobaki: Oh bato na biso! ya soló, toyokaki maloba ya buku oyo ekitaki sima ya Mûssa; (ezali koloba) bosóló ya maye maleka mpe ezali kokamba na bosembo o nzela ya semba.
32. Mpe oyo akondimela motei ya Allah te, akozua ekimeli te na bokonzi ya Allah na mokili, mpe akozala na babateli te elongo naye. В a oyo wana nde bazali na libunga ya polele.
33. Boye bazali kornona te ete Allah nde akelaki likolo тре na nsé, тре alembaki тропа kokela yango te, boye azali na nguya te ya kosekwisa bawa? Iyo, ya soló, azali na nguya likolo ya biloko binso.
34. Mpe mokolo moye bakomemaka bapengwi na lifelo; (bakotunaka bango) oyo ezali solo te? Bakoyanolaka: Iyo. Ya sólo, Nkolo wa biso. Akolobaka: Bomeka etumbu тропа maye bozalaki kopengwa na yango.