4. Ya sólo, falo amimonisaki na lolendo kolekisa ndelo na mokili, mpe azalaki kokabola bato naye тропа kolembisa bango, azalaki koboma bana mibali mpe azalaki kotika basi na bango. Ya sólo, azalaki okati ya bato mabe.
7. Мре toyebisaki na mama ya Mûssa ete: Melisa ye, mpe soki okobanga тропа ye, bwaka ye na mayi, kasi koyimayima te mpe kolenga te, ya soló, tokozongisa ye epai nayo. Mpe tokotia ye azala okati ya batindami.
8. Mpe bato ya falo bayambaki ye, mpo ete azala monguna na bango mpe oyo akomemela bango mpasi. Ya sólo, falo na Hâmân na mapinga na bango bazalaki bato mabe.
9. Mpe mwasi ya falo alobaki ete: (na mobali naye) oyo azali esengo ya liso na ngai mpe esengo ya liso nayo. Boboma ye te, akoki kosalisa biso ndele to mpe tokokomisa ye mwana na biso, mpe bazalaki koyeba te.
10. Mpe motema ya mama ya Mûssa ekitaki, na ntina ete ekokaki kobimisa nyoso oyo ezalaki na kati, soki biso te nde motema naye molendaki te, mpe mbele azangaki kozala na kondima.
13. Mpe tozongisaki ye epai ya mama wa ye, mpo asepela mpe amiyoka mpasi te, тре mpo ayeba ete elaka ya Allah ezalaka sôló. Kasi ebele na bango bazali koyeba te.
18. Мре sima ya mikolo mike mileki, Mûssa akotaki na mboka na kobanga mpe kotala epai na epai, kasi na mbalakaka akutani na mobali oyo asengaki ye lisalisi lobi azali kobelela ye lisusu ete asalisa ye, Mûssa alobi naye: Ya soló, ozali motumoli ya polele.
19. Tango alingi kozua ye na makasi alobi: Oh Mûssa! Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto lobi loleki? Olingi komitiya moto ya makasi awa na mokili, mpe olingi kozala o kati ya basali bolamu te.
23. Mpe tango akomaki na liziba ya mayi ya mad’yan, akuti bato batondi bazali komelisa (banyama na bango) mpe akuti basi mibale lokola bamivandisi pembeni, alobi (na bango): Bolingi nini? Balobi: Tokomelisa banyama te kino bango basilisa komelisa, mpe tata na biso akomi mokolo makasi.
25. Moko kati na bango ayei (epai ya Mûssa), azali kotambola malembe na nsoni alobi: Ya soló, tata na biso azali kobenga yo, mpo afuta yo ndenge omeliseli biso banyama. Mpe tango akomaki liboso lia ye, ayebisi ye lisolo lia ye, alobi: Kobanga te, osili kolongisama epai ya babubi.
27. Alobi: Nalingi obala moko kati ya bana basi na ngai mibale oyo, na mobeko ete: Osalela nga mibu mwambe, soki mpe okokisi (mibu) zomi, sé yo moko, mpe nakopesa yo pasi te. Na bolingi bwa Allah okokuta ngai o kati ya bato ya malamu.
28. (Mûssa) alobi: Tosili koyokana ngai nayo, oyo na коропа kati ya makambo mibale oyo, nakozala na lisumu te. Mpe Allah nde azali mobateli na oyo tozali koloba.
29. Mpe tango Mûssa akokisi elako ya boyokani, akei na libota lia ye o ngambu ya ngomba ya turi, amoni moto mpe alobi na libota lia ye: Bozela ngai awa, namoni moto, tango mosusu nakoyela bino sango, to nkoni ya moto mpo bokoka koyotola yango.
30. Mpe tango akomaki, abengamaki na ngambu ya mobali na nsé ya lubuaku o esika ya mapamboli na kati ya nzete, Eh Mûssa! Ya soló ngai Allah Nkolo ya mokili.
32. Kotisa loboko nayo na libenga lia yo, ekobima mpembe ekosala mpasi te, mpe kanga loboko nayo makasi na nzoto mpo obanga te, wana ezali bilembo mibale kowuta epai ya Nkolo wa yo тропа falo na bankumu naye. Ya sólo, bazalaki bato mabe.
35. (Allah) alobi: Tokopesa yo ndeko nayo тропа kosalisa yo mpe topesa bino bokonzi mpo ete: Bakoka bino te na bikamwiseli na biso. Bino mibale na baye balandi bino bokolonga.
38. Mpe falo alobi: Oh bino bankumu! Nayebi bino bozali na nzambe mosusu te sé ngai; Hâmân, pelisela ngai moto mpe tumba mabele mpo otongela ngai ndako ya molai, mpo namata epai ya nzambe ya Mûssa. Mpo ya soló, nazali kokanisa ete azali kati ya babuki lokuta.
45. Kasi biso nde tobimisaki bato ebele baleka na bomoyi milayi mpe ofandaki te o mboka mad’yan ozali kotangela bango mikapo mia biso, kasi biso nde totindaka batindami.
46. Мре ozalaki te o ngambu ya ngomba ya turí tango tobengaki, ezalaki sé ngolu kowuta epai ya Nkolo wayo, mpo okebisa baye mokebisi moko te ayelaki bango liboso nayo mpo bakanisa.
47. Mpe soki mabe maye bango moko bamilukeli ekomeli bango, balobi: Nkolo wa biso тропа nini otindelaki biso motindami te? Tolingaki kolanda mikapo mia yo mpe tolingaki kozala o kati ya bandimi.
54. Bango nde bakozuaka lifuta lia bango mbala mibale тропа maye bakangaki motema na yango, mpe mpo bayanolaki malamu na esika ya mabe, mpe bazalaki kobimisa ndambo ya maye topesaki bango.
57. Мре balobi ete: Soki tolandi yo na bokambi bakobotolo biso mabele na biso. Boye tofandisaki bango te na mabele esantu mpe ya kimia! Eye ezalaki kobimisela bango bambuma ya ndenge na ndenge тропа kólia? Kasi ebele na bango bazali koyeba te.
58. Мре boni tobomaki kati ya bamboka oyo ebubaki (kasi bazalaki na bomoyi ya malamu)? Mpe sima na bisika na bango batikalaki bato токе, mpe biso nde tokitanisaki yango.
59. Mpe kasi Nkolo wayo abomaka mboka te kino atindela bango (bato ya mboka wana) motindami mpo atangela bango mikapo mia biso, mpe tobomaka mboka te sé bato na yango bazala babubi.
61. Moto oyo topesi ye elaka ya malamu, mpe akomona yango ekokisami, boye akokani na oyo topesi ye bisengo ya mokili mpe o mokolo ya lisekwa akofanda liboso na biso тропа kosamba?
68. Mpe Nkolo wayo akelaka oyo alingi mpe aponaka oyo alingi, ezali te ete: Bango bapona nkembo na Allah wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango (ye na bikeko na banzambe misusu).
70. Ye nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, azali na lokumu awa na mokili mpe na mokolo ya suka, mpe bokonzi bonso (ya makambo) bozali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama.
71. Loba: Bomoni ndenge nini soki Allah atiyelaki bino butu ezala bongo kino o mokolo mwa suka? Nzambe nini na esika ya Allah akotiyela bino bongengi? Boye bozali koyoka te?
72. Loba: Bomoni ndenge nini, soki Allah atiyelaki bino mokolo ezala bongo kino o mokolo ya suka? Nzambe nini na esika ya Allah akotiyela bino butu mpo bopema na yango? Boye bozali kornona te?
76. Ya soló Qârûn azalaki kati ya bato ya Mûssa, kasi atombokaki likolo na bango na lolendo, mpe topesaki ye bozui oyo fungóla nayango esengaki bato ya makasi mpona kotombola yango. Tango bayebisi ye na bato naye ete: Kosepela mingi te, mpo ya sólo Allah alingaka basepeli ya bolekisi ndelo te.
77. Mpe oyo Allah apeși yo, luka nayango evandeli (ya malamu) o mokolo ya suka, kasi kobosana ya mokili te, mpe bongisa lolenge Allah abongisela yo, mpe kobebisa okati ya mokili te. Ya sólo, Allah alingaka babebisi te.
78. Alobi: Ya sólo, nazuaki yango na boyebi oyo nazali na yango. Boye ayebi te ete: Allah abomaka bato ya yambo baye bazalaki na bokasi koleka ye na bozwi ebele? Mpe batomboki bakotunama te mpona masumu na bango?
79. Мре abimaki na bonzenga nyoso epai ya bato naye, baye balingaki mokili balobi: Soki tozalaka ata (na bozui ya malamu lokola) Qärün, ya soló, azali na libaku ya kitoko.
83. Ndako wana ya mokolo ya suka, tolengeli yango тропа baye balingi komilakisa te awa na mokili, mpe bazali kosala mbeba te. Mpe suka ya solo, ezali nde ya babangi.
85. Ya soló oyo atiyelaki yo kurani ezala lotomo, akomemaka yo na esika oyo olingi kokende. Loba: Nkolo wa ngai ayebi malamu koleka, oyo aye na bokambi mpe oyo azali na libunga ya polele.
87. Na yango, kobundisaka mikapo mia Allah te sima ya kokitisa yango epai nayo. Benga (bato) baya epai ya Nkolo wayo, тре kozala o kati ya basangisi te.
88. Mpe kokumisa nzambe mosusu te elongo na Allah, Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ye. Biloko binso bikokufaka, longola sé elongi naye. Mpe kokata ya likambo ezali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama.