1. Lokumu na oyo asalisaki mowumbu naye (ntoma Muhammad) mobembo mwa butu, kobanda na ndako esantu ya Makkah kino na ndako esantu ya Aq’swa (yelusaleme) oyo tosilaki kopambola zinga zinga na yango mpo été tolakisa ye bilembo bia biso, ya sôló ye azali moyoki amonaka manso.
7. Soki bosali malamu ezali тропа bino moko, soki mpe bosali mabe ezali sé bongo. Mpe soki elaka ya suka ekomi mpo babebisa bino bilongi na kosala bino mabe mpe bakota o ndako nzambe ndenge bakotaki mbala ya yambo тропа kobebisa maye bazuaki na kati.
9. Ya soló kurani oyo, ezali kokamba na oyo ezali ya semba, mpe ezali kopesa sango malamu epai ya bandimi baye bazali kosala misala ya malamu ete bakozala na lifuta ya monene.
15. Oyó akopona nzela ya semba, amisemboli sé ye moko, mpe oyo akopona libungi, amibungisi sé ye moko. Kasi moto akomemaka mokumba ya moninga te (mokumba ya masumu), mpe topesaka etumbu na bato te kino totinda motindami.
18. Oyo alingi azua bomoyi na lombango, tozali mbangu тропа kopesa ye oyo tolingi, sima tokopesa ye móto mwa lifelo oyo akozika okati na yango, na kosila lokumu, mpe na kozala mosika na ngolu.
23. Mpe Nkolo wayo asilaki kozua mokano ete; Bobondela te sé ye mei, mpe bozala malamu na ba boti na bino. Soki kimobange ekomeli moko kati na bango mibale na maboko nayo to bango banso babale kofiotola bango te, mpe kotombokela bango te, kaši žala na bango malamu тре lobela bango maloba ya kitoko,
33. Mpe boboma te molimo moye Allah apekisaki, sé ezala na bosembo, kasi moto oyo babomi na bosembo te, biso tosili kopesa libota naye ndingisa ya kosenga makila naye, kasi alekisa ndelo te na koboma pamba te mpo ete asili kozua lisungi.
34. Mpe bopusana pembeni ya misolo mia muana ya etike te, (тропа koliya yango) sé ezala na lolenge loye londimami kino akokola, mpe bokokisa elaka. Ya sólo, тропа elaka bokotunamaka.
36. Мре kolandaka te, (kotelema тре kolobela) maye ozali na boyebi bwa yango te, mpo été ya soló, boyoki, bomoni na motema nyonso wana akotunama тропа yango.
39. (Manso) mana mazali maye Nkolo wayo atangisaki yo na bwanya, mpe kosangisa Allah na banzambe basusu te, noki te okobwakama o moto mwa lifelo moye mozali mosika na mawa ma Allah.
41. Mpe tosilaki kolobela polele (kotiya lotomo) maye manso mazali o kati ya kurani mpo été (bato) bakanisa, kasi wana ezali kokimisa bango sé bokimisi ya mabe.
44. Mapata sambo na mabele, na manso mazuami o kati na yango, bazali kosanzola nkembo naye, mpe ezali na eloko moko te sé ezali kosanzola lokumu naye. Kasi bino nde bozali koyeba yango te. Ya soló, ye azali ngolu atonda bolimbisi.
46. Mpe tozipi bango motema été basosola te, mpe matoyi na bango lokola. Mpe tango ozali kokumisa bomoko ya Nkolo wayo o kati na buku, bapesi mikongo na kokima (bakei kobondela mabondeli ya mabe).
47. Toyebi malamu maye bazali koyoka, soki bayoki epai nayo, balobilobi nanse o kati na bango, babubi bakolobaka: Bozali kolanda moto oyo alokami na bondoki.
53. Mpe loba na bawumbu na ngai ete: Baloba maloba sé ya malamu, pamba te mpo satana akotia bokabuani o kati na bango. Ya soló, satana azali penza monguna ya moto ya polele.
54. Nkolo wa bino ayebi bino malamu koleka, soki alingi akoyokela bino mawa, soki mpe alingi apeși bino etumbu. Мре totindaki yo te ozala mobateli likolo na bango.
55. Mpe Nkolo wa yo ayebi malamu penza manso maye mazali o likolo mpe na nsé, mpe totombola bantoma basusu likolo ya baninga, mpe topesaki Dáwud zabur(1).
56. Loba: Bobelela banzambe wana bozali kozua na botiki ye, bazali na makoki te ya kolongola bino mabe mpe bazali na makoki te ya kopekisa yango ete ezua bino.
58. Mboka moko te ya bobubi ekotikala sé toboma yango yambo ya mokolo mwa suka ekoka, to tokopesaka yango etumbu ya makasi. Nyoso wana esila kokomama o kati ya buku.
59. Eloko moko te ekopekisa biso тропа kotinda bikamwisi, sé bato ba kala baboya yango, mpe topesaki na bato ya Thamûd náqat oyo (ezalaki ekamwisi) ya polele, kasi basalaki yango mabe (babomaki yango), kasi totindaka bikamwisi te sé тропа kobangisa.
62. Alobi lisusu ete: Omoni moto oyo öpesi ye lokumu koleka ngai, soki otiki ngai na mokili kino mokolo ya suka, na kobungisa ebele kati na mabota naye na bakitani naye, longola sé токе kati na bango.
64. Мре tombokisa bango na mongongo nayo ba oyo okokoka kati na bango, mpe tinda mapinga nayo ya ndenge na ndenge likolo na bango, mpe sangana na bango na kati ya misolo na bango mpe na bana na bango, mpe pesa bango elaka. Kasi satana azali sé kopesa bango elaka ya lokuta.
66. Nkolo wa bino nde oyo atiela bino masuwa likolo ya ebale, bozali kotambola na yango тропа koluka litomba naye. Ya sólo, ye azalaka na mawa na bino.
67. Mpe soki mabe ezui bino o kati ya ebale, botiki maye bozalaki kobondela mpe bozongeli ye, mpe soki abikisi bino abimisi bino na mayi bokomi na mokili, bozongeli lisusu oyo bozalaki na yango liboso. Kasi ya sólo penza, moto azali sé na bopengwi.
70. Ya soló, tosilaki kopesa bana ya Adam lokumu, тре totambwisi bango na mokili тре na ebale, mpe topesi bango bozui ya kitoko, mpe totomboli bango likolo ya bikelamu ebele oyo tokela.
71. Mokolo moye tokobengaka bato banso na mokambi wa bango (imam), oyo akopesamaka buku naye na loboko ya mobali, baye wana bakotanga yango na esengo, mpe bakobubamaka na eloko te.
78. Mpe telemisa losambo osima ya nzanga kino o molili mwa butu, mpe tanga kurani na tongo. Ya sólo, kotanga kurani(1) na tongo ezalaka na banzeneneke.(2)
80. Мре loba ete: Oh Nkolo na ngai! Kotisa ngai na esika ya malamu, mpe bimisa ngai na esika ya bosembo, mpe pesa ngai esika ya mapamboli uta epai nayo.
88. Loba: Ata soki bato mpe bilima basangani mpo basala kurani lokola oyo, bakokoka koya na lolenge na yango te ata soki bazui lisalisi ya ndenge na ndenge kati na bango.
93. To mpe ozala na ndako ya kitoko ezali na bonzenga ya wolo, to mpe obuta (omata) na mapata (likolo), kasi tokondima kobuta nayo wana te kino okitisela biso buku totanga yango, loba: Nkembo na Nkolo na ngai, boye ngai nazali te sé moto mpe motindami?
97. Mpe oyo Allah akambi, asili kokambama, mpe oyo akobunga, okokoka te kozuela bango bakambi na esika naye (Allah) mpe tokosangisa bango o mokolo ya suka bilongi bisunduami, miso ya kozipama, matoyi makangami, na minoko mikolobaka te, esika na bango nde lifelo. Tango nyoso moto na yango elingi kokita, tokobakisela bango oyo ya makasi koleka.
98. Wana nde lifuta lia bango, mpo bapengwaki na bilembo bia biso, mpe bakolobaka: Tango tokotikala sé mikuwa mpe mputulu na mabele, ya soló penza tokosekwisama lisusu bikelamu ya sika?
99. Boye bazali kornona te ete: Ya sólo, Allah oyo akela likolo na mabele azali na bokoki ya kokela bikelamu bisusu lokola bango? Mpe atiyeli bango mokano ezali na tembe te? Kasi babubi baboyi, (balingi) sé bopengwi.
104. Mpe na sima na yango tolobaki na bana ya isalayele ete; bovanda na mabele kasi tango elaka ya mokolo ya suka ekokokaka tokoya na (bino) ebele na lisanga.
110. Loba: Bobelela Allah to bobelela Ar-Rahmân(1) to nkombo nini bolingi kobenga, ye nde azali na ba nkombo ya kitoko. Mpe koganga te okati ya losambo nayo koleka, kovanda mpe nye te, kasi zala na mongongo ya kati kati.
111. Mpe loba lokumu ya Allah oyo azali na mwana te, mpe akoki kozala na basangani te kati ya bokonzi naye, mpe akoki kozala na mobateli mosusu te (ya kokima epai naye) mpe belela bonene bwa ye makasi.